Lakisá makambo oyo ezali na kati

Ezali na moto oyo amoná Nzambe?

Ezali na moto oyo amoná Nzambe?

Eyano ya Biblia

 Te, moto moko te amoná Nzambe na miso. (Kobima 33:20; Yoane 1:18; 1 Yoane 4:12) Biblia elobi ete “Nzambe azali Elimo”; lolenge yango ya bomoi emonanaka na miso ya bato te.​—Yoane 4:24; 1 Timote 1:17.

 Kasi, baanzelu bamonaka Nzambe, mpo bazali bikelamu ya elimo. (Matai 18:10) Longola yango, bato mosusu oyo bazali kokufa bakosekwa na nzoto ya elimo mpo na kokende kofanda na likoló; bango mpe bakomona Nzambe.​—Bafilipi 3:20, 21; 1 Yoane 3:2.

Ndenge ya “komona” Nzambe lelo oyo

 Mbala mingi, Biblia esalelaka liloba komona na ndenge ya elilingi mpo na kopesa likanisi ya kokanga ntina. (Yisaya 6:10; Yirimia 5:21; Yoane 9:39-41) Na yango, moto akoki komona Nzambe na “miso ya motema na [ye]” soki azali na kondima epai na Ye mpe azali kosepela na bizaleli na Ye. (Baefese 1:18) Biblia emonisi oyo moto asengeli kosala mpo akóma na kondima yango.

  •   Kotala biloko oyo Nzambe asalá mpo na koyekola bizaleli na ye, lokola bolingo, bokabi, bwanya mpe nguya na ye. (Baroma 1:20) Ntango Yobo akanisaki lisusu biloko oyo Nzambe asalá, ayokaki lokola nde amoni Nzambe na miso.​—Yobo 42:5.

  •   Koyekola Biblia mpo na koyeba Nzambe. Biblia elobi boye: “Soki oluki [Nzambe], akosala ete omona ye.”​—1 Ntango 28:9; Nzembo 119:2; Yoane 17:3.

  •   Koyekola bomoi ya Yesu mpo na koyeba Nzambe. Yesu amonisaki bizaleli ya Tata na ye Yehova na ndenge ya kokoka; yango wana alobaki ete: “Moto oyo amoni ngai amoni mpe Tata.”​—Yoane 14:9.

  •   Kozala na bomoi oyo esepelisaka Nzambe, mpe kokanisa makambo oyo asalelaka yo. Yesu alobaki: “Esengo na bato ya motema pɛto, mpo bakomona Nzambe.” Ndenge tolobaki liboso, bato mosusu ya sembo bakosekwa mpo bázala na bomoi na likoló mpe kuna, “bakomona Nzambe.”​—Matai 5:8; Nzembo 11:7.

Moize, Abrahama mpe bato mosusu bamonaki Nzambe?

 Na bisika mosusu oyo Biblia emonisi lokola nde bato bamonaki Nzambe na miso, lisolo mobimba emonisi ete Nzambe atindaki nde anzelu to abimaki na kati ya emonaneli.

 Baanzelu.

Na ntango ya kala, Nzambe azalaki kotinda baanzelu epai ya bato mpo báloba na nkombo na ye. (Nzembo 103:20) Na ndakisa, mokolo moko Nzambe asololaki na Moize na katikati ya mwa nzete ya nzubɛ oyo ezalaki kopela mɔtɔ, mpe Biblia elobi ete “Moize abombaki elongi na ye, mpamba te abangaki kotala Nzambe ya solo.” (Kobima 3:4, 6) Nzokande, Moize amonaki Nzambe te, mpo bavɛrsɛ mosusu ya lisolo yango emonisi ete amonaki nde “anzelu ya Yehova.”​—Kobima 3:2.

 Ndenge moko mpe, ntango Biblia elobi ete Nzambe “azalaki koloba na Moize mpenza boye na miso,” elimboli ete Nzambe azalaki kosolola na ye lokola moninga. (Kobima 4:10, 11; 33:11) Moize amonaki elongi ya Nzambe te, mpo Nzambe azalaki koloba na ye “na nzela ya baanzelu.” (Bagalatia 3:19; Misala 7:53) Atako bongo, kondima ya Moize epai ya Nzambe ezalaki makasi mpenza, yango wana Biblia elobi ete “azalaki komona Moto oyo amonanaka te.”​—Baebre 11:27.

 Nzambe azalaki kosolola na Abrahama ndenge azalaki kosolola mpe na Moize: na nzela ya baanzelu. Ya solo, moto oyo azali kotánga Biblia mbangumbangu akoki kokanisa ete Abrahama amonaki Nzambe na miso. (Ebandeli 18:1, 33) Kasi, bavɛrsɛ mosusu ya lisolo yango emonisi ete “mibali misato” oyo bayaki epai ya Abrahama bazalaki nde baanzelu oyo Nzambe atindaki. Abrahama ayebaki ete bazalaki bamonisi ya Nzambe mpe alobaki na bango lokola nde azalaki koloba na Yehova ye moko.​—Ebandeli 18:2, 3, 22, 32; 19:1.

 Bimonaneli.

Nzambe azalaki mpe kobimela bato na nzela ya bimonaneli, elingi koloba kolakisa moto makambo lokola na ndɔtɔ. Na ndakisa, ntango Biblia elobi ete Moize ná Bayisraele mosusu “bamonaki Nzambe ya Yisraele,” bamonaki nde “emonaneli ya Nzambe ya solo.” (Kobima 24:9-11) Na bisika mosusu, Biblia elobi mpe ete basakoli ‘bamonaki Yehova.’ (Yisaya 6:1; Danyele 7:9; Amose 9:1) Na bisika yango nyonso, bavɛrsɛ mosusu ya lisolo yango emonisi ete bamonaki Nzambe na emonaneli, kasi na miso boye te.​—Yisaya 1:1; Danyele 7:2; Amose 1:1.