Likoló ezali nini?
Eyano ya Biblia
Biblia esaleli liloba “likoló” na ndenge misato: (1) Likoló oyo tomonaka na miso; (2) likoló oyo bikelamu ya elimo bafandaka; mpe (3) likoló ezalaka elembo ya kotombwama to bokonzi. Na makambo wana misato, maloba oyo ezali liboso na yango nde esalisaka mpo na koyeba likoló oyo balobeli. a
Likoló oyo tomonaka na miso. Awa, “likoló” ezali mapata, epai mopɛpɛ ebɛtaka, bandɛkɛ epumbwaka, lipata ya mbula mpe banɛjɛ esalemaka mpe mikalikali engɛngaka. (Nzembo 78:26; Masese 30:19; Yisaya 55:10; Luka 17:24) ekoki mpe kolimbola etando, esika “moi ná sanza mpe minzoto” ezalaka.—Kolimbola Mibeko 4:19; Ebandeli 1:1.
Likoló oyo bikelamu ya elimo bafandaka. Liloba “likoló” emonisaka mpe esika oyo emonanaka na miso ya bato te to epai bikelamu ya elimo bafandaka, esika oyo ezali libándá ya likoló oyo tomonaka na miso mpe eleki yango mosika. (1 Bakonzi 8:27; Yoane 6:38) Yango nde esika Yehova Nzambe, oyo azali “elimo” afandaka ná baanzelu oyo akelá. (Yoane 4:24; Matai 24:36) Na bantango mosusu, “likoló” elobelamaka mpo na komonisa baanzelu ya sembo, “lisangá ya basantu.”—Nzembo 89:5-7.
Biblia esalelaka mpe liloba “likoló” mpo na komonisa eteni ya likoló epai Yehova afandaka mpenza, “esika na [ye] ya kofanda ya libela.” (1 Bakonzi 8:43, 49; Baebre 9:24; Emoniseli 13:6) Na ndakisa, Biblia esakolaki ete Satana ná bademo bakobwakama na nse, bakozala lisusu na ndingisa te ya kokɔta mpo na kotɛlɛma liboso ya Yehova. Kasi bakotikala kaka bikelamu ya elimo.—Emoniseli 12:7-9, 12.
Elembo ya kotombwana to bokonzi. Makomami esaleli liloba “likoló” mpo na komonisa esika oyo etombwani, mingimingi na makambo etali bokonzi. Esika yango ekoki kopesama na:
Yehova Nzambe ye moko mpo azali Nkolo Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.—2 Ntango 32:20; Luka 15:21.
Bokonzi ya Nzambe, guvɛrnema oyo ekozwa esika ya baguvɛrnema ya bato. Biblia ebengi Bokonzi yango “likoló ya sika.”—Yisaya 65:17; 66:22; 2 Petro 3:13. b
Bakristo oyo, ntango bazalaki awa na mabele, bazalaki na elikya ya kokende na likoló.—Baefese 2:6.
Baguvɛrnema oyo emitomboli liboso ya bato oyo yango ezali kokonza.—Yisaya 14:12-14; Danyele 4:20-22; 2 Petro 3:7.
Bilimo mabe oyo bazali sikoyo koyangela mokili.—Baefese 6:12; 1 Yoane 5:19.
Likoló ezalaka ndenge nini?
Makambo ebele esalemaka na likoló. Ebele ya bikelamu ya elimo oyo bafandaka kuna, ‘basalelaka liloba ya Yehova.”—Nzembo 103:20, 21; Danyele 7:10.
Biblia emonisi ete likoló ezali na pole ya makasi mpenza. (1 Timote 6:15, 16) Mosakoli Ezekiele azwaki emonaneli ya likoló oyo emonisamaki na “kongɛnga,” kasi emonaneli ya likoló oyo Danyele azwaki, amonaki mpe “ebale ya mɔtɔ.” (Ezekiele 1:26-28; Danyele 7:9, 10) Likoló ezali bosantu to pɛtɔ mpe kitoko.—Nzembo 96:6; Yisaya 63:15; Emoniseli 4:2, 3.
Ndenge oyo Biblia elobi mpo na komonisa ndenge likoló ezalaka, ekamwisaka mpenza. (Ezekiele 43:2, 3) Kasi yango elingi koloba te ete lokola bato bamonaka te makambo oyo ezalaka kuna na likoló, bakoki te koyeba ndenge likoló ezalaka mpenza.
a Ekoki kozala ete liloba ya Ebre oyo ebongolami na “likoló” euti na liloba mosusu oyo elimboli “bosanda,” to “kotombwama.” (Masese 25:3) Talá buku New Brown, Driver, and Briggs Hebrew and English Lexicon of the Old Testament, lokasa 1029.
b Buku Cyclopedia ya McClintock ná Strong elobi ete likoló ya sika oyo Yisaya 65:17 elobeli elimboli “guvɛrnema ya sika, bokonzi ya sika.”—Volimi IV, lokasa 122.