“Mibali misato ya bwanya” bazalaki banani? Balandaki “monzoto” ya Beteleme?
Eyano ya Biblia
Na kokesana na makambo oyo bato basalaka na fɛti ya Noele, Biblia esalelaka te ebengeli “mibali misato ya bwanya” to “bakonzi misato” mpo na kolobela bato ya mibembo oyo bakendaki kotala Yesu nsima ya kobotama na ye. (Matai 2:1) Kutu, Matai, moko ya bakomi ya Baevanzile asalelaki liloba ya Grɛki ma’goi mpo na kolobela bato yango oyo bakendaki kotala Yesu. Ekoki kozala liloba yango etaleli bato ya mayele na astroloji mpe misala mosusu ya molili. a Mabongoli mingi ya Biblia ebengaka bango “bato ya astroloji” to “banganga-minzoto.” b
“Mibali ya bwanya” bazalaki boni?
Biblia elobeli motángo na bango te mpe bato bapesaka makanisi ekeseni na likambo yango. Buku moko Encyclopedia Britannica, elobi ete “na kotalela mimeseno ya bato ya Moyen-Orient banganga-minzoto yango bazalaki 12, kasi na mimeseno ya bato ya Mpoto bazalaki bato misato, ekoki kozala mpo na kado misato oyo bamemelaki mwana yango: ‘wolo, olibana ná mire.’”—Matai 2:11.
“Mibali ya bwanya” bazalaki bakonzi?
Atako mbala mingi na makambo oyo bato basalaka na fɛti ya Noele emonisaka bapaya yango bongo, esika moko te na Biblia ebengi bango bakonzi. Buku Encyclopedia Britannica, elobi ete bato bakómaki kobenga mibali yango bakonzi bambula mingi nsima ya kobotama ya Yesu mpe babakisaki makambo mikemike na istware ya mbotama ya Yesu.
Bankombo ya “mibali ya bwanya” ezalaki banani?
Biblia elobeli bankombo ya banganga-minzoto yango te. Buku The International Standard Bible Encyclopedia, elobi ete “koluka kopesa bango bankombo (na ndakisa, Gaspar, Melchior mpe Balthasar) euti na masapo mpamba.”
Ntango nini “mibali ya bwanya” bakendaki kotala Yesu?
Mbala mosusu banganga-minzoto yango bakendaki kotala Yesu basanza mingi nsima ya kobotama na ye. Emonani bongo mpo Mokonzi Erode, oyo alukaki koboma Yesu, apesaki mitindo báboma bana mibali banda na mbula mibale mpe na nse na yango. Apesaki mbula yango na kotalela nsango oyo banganga-minzoto bapesaki ye.—Matai 2:16.
Banganga-minzoto bakendaki te kotala Yesu na butu oyo abotamaki. Biblia elobi: “Ntango bakɔtaki na ndako bamonaki mwana yango ya moke ná Maria mama na ye.” (Matai 2:11) Yango emonisi ete na ntango wana, libota yango ezalaki kofanda na ndako mpe Yesu azalaki lisusu te bebe na elyelo ya bibwɛlɛ.—Luka 2:16.
Nzambe atindaki “mibali ya bwanya” bálanda “monzoto” ya Beteleme?
Bato mosusu balobaka ete Nzambe nde atindaki oyo babengaka monzoto ya Beteleme ekamba banganga-minzoto epai ya Yesu. Tótala ntina oyo ekoki kozala bongo te.
Eloko oyo emonanaki lokola monzoto ekambaki liboso banganga-minzoto na Yerusaleme. Biblia elobi: “Banganga-minzoto bauti na ɛsti bayei na Yerusaleme, mpe balobi ete: ‘Wapi moto oyo abotami mokonzi ya Bayuda? Mpo tomonaki monzoto na ye ntango tozalaki na ɛsti, mpe toyei kogumbamela ye.’”—Matai 2:1, 2.
Mokonzi Erode nde azalaki moto ya liboso ya koyebisa banganga-minzoto yango bákende na Beteleme, kasi “monzoto” te. Ntango ayokaki ete “mokonzi ya Bayuda” ayei, Erode alukaki koyeba esika Kristo oyo alakamaki asengelaki kobotama. (Matai 2:3-6) Ntango ayokaki ete akobotama na Beteleme, ayebisaki banganga-minzoto bákende kuna, báluka mwana yango mpe bázonga koyebisa ye.
Kaka nsima na yango nde banganga-minzoto bakendaki na Beteleme. Biblia elobi: “Nsima ya koyoka mokonzi, bakendaki; mpe talá! monzoto oyo bamonaki ntango bazalaki na ɛsti ezalaki kokende liboso na bango, tii etɛlɛmaki likoló ya esika oyo mwana yango ya moke azalaki.”—Matai 2:9.
Kobima ya “monzoto” ememaki makambo oyo etyaki bomoi ya Yesu na likama mpe esalaki ete bana oyo basali likambo te bábomama. Nsima ya kolongwa na Beteleme, Nzambe akebisaki banganga-minzoto yango bázonga lisusu te epai ya Erode.—Matai 2:12.
Erode asalaki nini? Biblia elobi: “Ntango Erode amonaki ete banganga-minzoto bakosaki ye, ayokaki nkanda makasi mpenza, mpe atindaki báboma bana mibali nyonso na Beteleme mpe na bitúká na yango nyonso, banda na mbula mibale mpe na nse na yango, na kotalela ntango oyo monzoto ebimaki, ndenge banganga-minzoto bayebisaki ye.” (Matai 2:16) Nzambe te nde akokaki kobimisa likambo ya mabe ndenge wana.—Yobo 34:10.
a Hérodote, Mogrɛki moko oyo azalaki moto ya istware na siɛklɛ ya mitano liboso ya ntango na biso, alobaki ete ma’goi ya ntango na ye ezalaki bato ya ekólo ya Bamede (Baperse) oyo bamipesaki na makambo ya astroloji mpe kolimbola bandɔtɔ.
b Talá Biblia New American Standard Bible, The New American Bible, The New English Bible, mpe New International Version Study Bible. Biblia King James Version ebengi bapaya yango “mibali ya bwanya,” kasi elobi te ete bazalaki misato.