Lakisá makambo oyo ezali na kati

EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?

Ndenge lipekapeka oyo babengi piéride du chou etɛlɛmisaka mapapu na yango lokola lɛtrɛ V

Ndenge lipekapeka oyo babengi piéride du chou etɛlɛmisaka mapapu na yango lokola lɛtrɛ V

 Liboso mapekapeka epumbwa, ezalaka na mposa ya molunge ya moi mpo mapapu na yango ezwa makasi ya kopumbwa. Kasi soki mapata esali lokola koyinda, lipekapeka yango epumbwaka noki koleka mapekapeka mosusu. Nini esalisaka yango epumbwa noki ndenge wana?

 Kanisá naino: Liboso epumbwa, mapekapeka ndenge na ndenge ekangaka mapapu na yango to esembolaka yango mpo ezwa molunge ya moi. Kasi, lipekapeka oyo ba bengi piéride ya chou etɛlɛmisaka mapapu na yango lokola lɛtrɛ V. Bato ya mayele balobi ete mpo ezwa molunge oyo esengeli, lipekapeka esengeli kokitisa lipapu mokomoko na mwa nse mpenza (angle ya 17 degrés) na esika ekanga mapapu. Kosala bongo esalaka ete molunge ya moi ekɔta mpenza na mapapu yango oyo ekangamá na mpanzi na yango liboso epumbwa.

 Bato ya mayele na iniversite ya Exeter, na Angleterre, balukaki kobongisa lisusu ndenge ba-panneaux solaires esalaka na kolanda ndenge lipekapeka yango etɛlɛmisaka mapapu na yango lokola lɛtrɛ V. Bolukiluki na bango esalisaki bango bámona ete ba-panneaux yango ekoki kobenda lisusu nguya ya moi mingi koleka (50%).

 Bato ya mayele bamonaki lisusu ete mapapu ya lipekapeka yango ezongisaka mpenza pole ya moi ndenge talatala esalaka ntango moi ebɛtaka yango. Lokola bamekolaki ndenge lipekapeka etɛlɛmisaka mapapu na yango mpe ndenge ezongisaka pole ya moki, basalaki ba-panneaux ya pɛpɛlɛ mpe oyo ezali kosala malamu mpenza. Mpo na yango, Richard ffrench-Constant, moko ya bato ya mayele oyo basalaki bolukiluki yango, alobaki ete lipekapeka babengi piéride du chou “eyebi mpenza kobenda nguya ya moi.”

 Okanisi nini? Ndenge lipekapeka oyo babengi piéride du chou etɛlɛmisaka mapapu na yango lokola lɛtrɛ V, ebimá kaka yango moko to basalaki yango kosala?